Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Basimba minduki babomi bato 9 na Djugu (Ituri)


Basoda ya Monusco na lopango na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.
Basoda ya Monusco na lopango na bango na Djugu, Ituri, 27 mars 2018.

Basimba minduki babomi bato libwa butu boleki na mboka Mutanga, pene na lac Albert, na etando ya Djugu, na Ituri, kolanda société civile.

"Basimba minduki bakotaki na buku na ngonga ya 2 heures ya butu. Babomaki na masasi mpe bibundeli bisusu ba civili libwa," eyebisi na Actualité.cd mokambi ya société civile ya Tshomia, Ivona Karmandu.

"Mibali mitano, basi misato mpe elenge mwasi moko babomami mpe moyi mobongo moko amemami," ebakisi M. Karmandu.

Ba FARDC, mampinga ya ekolo Congo démocratique, bapaleli bitumbi biye bisalami nsima na mwa ntango ya kimya na Djugu.

"Topaleli yango mpe tosengi na bavandi kolanda te bato baye bazali kokosa ete tozali na cessez-le-feu. Topemisi bitumba te na Djugu. Tosengi bana mboka kozala na bokengi mpe kopesa maboko na mampinga mpo na kosukisa bitumba biye," elobi na Actualite.cd, molobeli ya ba FARDC na Ituri.

Na mibu mibale, bato koleka 300.000 bakimi ndako na bango mpe bisika na bango mpo na bitumba na Ituri.

XS
SM
MD
LG