Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba policiers babale bakufi na mobulu ya ba étudiants na Unikin (PNC)


Moko na ndako ya mosala ya Université ya Kinshasa le 19 janvier 2015
Moko na ndako ya mosala ya Université ya Kinshasa le 19 janvier 2015

Ba policiers babale bakufi na bitumba na ba étudiants ya université ya Kinshasa, eyebisi mokambi ya police ya engumba mokonzi ya ekolo Congo démocratique, Commissaire divisionnaire adjoint géneral Sylvano Kasongo.

Mobulu mozongelaki lisusu mardi na eteyelo eye ya likolo epayi wapi ba yekoli bazali koboya bomatisami ya mosolo esengeli kofuta mpo na kelesi.

Nzokande na ngambo na bango ba professeurs basanga kati na APUKIN (Association ya ba professeurs ya Unikin) basengi na liyebisi ete kelasi ekangama mpe ba étudiants banso balongolama na ba homes na bango na campus.

Ndenge moko mpe, lisanga ya ba admistratifs mpe elobi se likambo moko wana.

Ba étudiants bapunzi mpe babebisi biloko biyike wuta na mobulu bazali kosala uto lundi.

Batie moto na ba bureaux ya professeurs, na agence ya Banque congolaise BCDC mpe batumbi mituka biike.

Kasi balakisi ya bilongi ya ba étudiants balobi bakokoba kotelemela bomati ya mosolo basengeli kofuta,

Balobi bato bazali kobebisa biloko ezali baye bawuti libanda ya université, ba étudiants te.

XS
SM
MD
LG