Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bakuluna mpe bato mabe 100 bakangami na minduki na Kinshasa


Bakambi ya police, Kinshasa, le 30 décembre 2018.
Bakambi ya police, Kinshasa, le 30 décembre 2018.

Nkama na bato bafundami na kosala mobulu, koboma mpe kobotola bato biloko na engumba Kinshasa balakisamaki o’mokolo ya mibale na engumba na bakonzi ya police.

Kati na bato mabe baye, bakuluna, basi mpe ba policiers baye bayika mituka, tukutuku mpe biloko misusu bamisami.

Kolanda PNC (Police nationale congolaise) ya Kinshasa, bato mabe baye bazwaki na minduki mpe bibundela ya moto ya bitumba mampinga masalelaka.

Ba pistolets mitrailleurs (Uzi), ba AK47, masasi mpe ba calibres 12 ezalaki na kati.

XS
SM
MD
LG