Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Babundi ba Ngumino na ba Twagiraheno nde babomaki koleka bato zomi na Kipupu (mbulatari/Sud-Kivu)


Bayi Croix Rouge bazali kolokota nzoto ya baye bakufaki na bitumba ya ba Banyamulenge pene na Bukavu, Sud-Kivu, 30 mai 2004
Bayi Croix Rouge bazali kolokota nzoto ya baye bakufaki na bitumba ya ba Banyamulenge pene na Bukavu, Sud-Kivu, 30 mai 2004

Mbulamatari ya Sud-Kivu ezali kozela lipinga etindi na Kipupu, na territoire ya Mwenga, mpo na kopesa motango ya suka ya baye babomamaki le 16 juillet 2020, eyebisi moko na bakonzi ya etuka.

Oyo eyebani ezali ete mangomba ya basimba minduki ya Babanyamulenge: ba Ngumino na ba Twagiraheno nde babomaki bato koleka zomi na mboka yango (Kipupu), elobi moko na bakonzi baye.

Mbulamatari ya Sud-Kivu etindaki wuto vendredi limpinga lyoko mpo na kokende kotala nin elekaki kasi limpinga lyango ekoki nanu kokota mboka Kipupu mpo bitumba bizali nzinganzinga.

"Bato koleka zomi bakufaki... Bobomami ya somo bosalamaki," ekomaki na liyebisi mbulamatari nsima na likita ya vendredi.

Kolanda mbulamatari ya Sud-Kivu, babundi baye batumbaki ndako mingi, bapunzaki biloko mingi mpe bamemaki yango.

"Ba Maï Maï balingaki koboma esika Babanyamulenge bakima bitumba bazalaka (camp des déplacés), ba FARDC na MONUSCO bakoti na bitumba wuto mokolo ya mposo, yango wana bato totindaki bakoki kokma te na Kipupu, elobi moko na bakambi ya Sud-Kivu.

Kolanda maloba ma ye, FARDC etie likonzi moko kati na Bidjombo, Minembwe mpe Bikenge mpo na kobatela ba civili

Bisike biye nde basimba minduki basalaka bitumba. Kasi ezali bakota te na Kipupu.

KST, lingomba ya baye balendelaka bokengi na etando ya Kivu, eyebisaki ete Babanyamulenge nde babomaki bato zomi na mwambe le 16 juillet 2020 kasi bakeli mibeko ba esika yango balobi bato nkama mibale na tuku mibale nde bakufaki. MONUSCO mpe etindi bolukiluki kasi bayi Filimbi bameli mbulamatari na MONSCO na kozanga kopesa sango ya malonga.

XS
SM
MD
LG