Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba soda ya ONU bakoki te kopesa maboko na mampinga ya bapaya (Leila Zerrougui)


Bakambi ya mampinga ya RDC (FARDC), Rwanda (RDF), Ouganda (UPDF) mpe ya Burundi (NDF) bazali kobongisa bosangisi makasi na bango mpo na bitumba na basimba minduki na monyele ya RDC, na Goma, Nord-Kivu, 24 octobre 2019. (VOA/Charly Kasereka)
Bakambi ya mampinga ya RDC (FARDC), Rwanda (RDF), Ouganda (UPDF) mpe ya Burundi (NDF) bazali kobongisa bosangisi makasi na bango mpo na bitumba na basimba minduki na monyele ya RDC, na Goma, Nord-Kivu, 24 octobre 2019. (VOA/Charly Kasereka)

Ba Casques bleus, basoda ya Monusco, bazali mpifo te ya kopesa maboko na mampinga ya bikolo nzinganzinga maye mazali komilengele mpo kosukisa mangomba ya batomboki na basimba minduki na monyele ya RDC, elobi, mokambi ya Monusco, Leila Zerrougui.

Botindami na biso lelo bozali kopesa maboko na ba FARDC. Totindama te mpo kopesa maboko na mampinga ya bapaya maye bazali koya ba RDC. Botindami na biso bozali kosunga mampinga ya Congo, elimbola Mme Zerrougui na radio Okapi.

Lolenge malamu ya kobatela ba civls lozali kozongisa bokonzi ya l’Etat, kobongisa misala ya bosembo, police mpe mampinga, nakoslala ete moko moko elanda mibeko ya botosi makoki ya bomoto mpe koyeba koyanola na mbeba inso, elobi Mme Zerrougui.

Bakambi ya mampinga ya RDC (FARDC), Rwanda (RDF), Ouganda (UPDF) mpe ya Burundi (NDF) bazali kobongisa na Goma, Nord-Kivu, bosangisi makasi na bango mpo na bitumba na basimba minduki na monyele ya RDC.

Kolanda molbeli ya Monusco, USA, na nzela ya Africom, mpe Monusco babengami na bokutani boye mpo na kotala.

XS
SM
MD
LG