Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba "mpaka" ya Hauts plateaux (S-Kivu) basengi solutions diplomatiques mpe dialogue


Ba mpaka ya Hauts plateaux (S-Kivu) basengi solutions diplomatiques mpe dialogue
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:05:52 0:00

Ba mpaka ya Hauts plateaux (S-Kivu) basengi solutions diplomatiques mpe dialogue

Ba "mpaka" ya ba communautés ya ba Hauts-plateaux ya Sud-Kivu basengi ba solutions diplomatiques mpo na mangomba ya basimba minduki ya babaya mpe dialogue mpo na ya baye ya RDC, nsima na bokutani na Premier ministre Ilunga Ilunkamba.

"Tosengi na l’Etat ya Congo (démocratique) kosunga biso mpo na kosukisa bitumba mpe kosilisa mangomba ya basimba minduki," elobi Norbert Basengezi oyo akambaki na bokutani M. Ilunga, limpinga ya ba "mpaka" ya 13 communautés ya ba Hauts-plateaux ya Minembwe, Fizi, Baraka, Bindjomba, Itombwe, Uvira, Bobokoboko.

"Mangomba ya basimba minduki mazali kaka ya Congo te. Ezali mpe na mangomba ya mboka ya bapaya. Yango nde esengi ba solutions diplomatiques na likambo lyango," eyebisi M. Basengezi.

Bitumba biango bimemi bato ebele kokima bisika na bango yango yakovanda.. Motango na bango moyebisami te.

"Tobwaki mbela makasi na communauté internationale mpe nationale basalisa mpo ete bandeko ba biso banzonga… Bilokolo binso bibebisami. Ndako ezikasami mpe ngombe epunzami," elobi M. Basengezi.

Mpo etali basimba minduki ya Congo, ba mpka ya Hauts plateaux basengi dialogue (masolo).

Basengi baye ya mangoba ya basimba minduki ya RDC kondima masolo myango.

"Masolo makosalama mpe basimba minduki makozala. Tolingi lisusu bitumba te ya koboma bato kasi biye ya ntombwa ya mboka," elobi M. Basengezi.

XS
SM
MD
LG