Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba FARDC bakangi ba FDLR mitano na Walungu (Sud-Kivu)


Bato batano bafundami kozala ba FDLR, bakangami na police ya Rwanda, na Nyabageni, Rwanda, 6 octobre 2019.
Bato batano bafundami kozala ba FDLR, bakangami na police ya Rwanda, na Nyabageni, Rwanda, 6 octobre 2019.

Batomboki mitano ya CNRD (Conseil pour le renouveau démocratique) moko na biteni ya ba FDLR(Forces démocratiques pour la libération du Rwanda) bakangami na ba soda ya RDC na butu ya jeudi na vendredi na Nyangezi, na etando ya Walungu, na Sud-Kivu, eyebisi bakonzi ya ba FARDC.

Kolanda molebeli ya Sokola 2, misala ya mampinga ya RDC na Sud-Kivu. capitaine Dieudonné Kasereka, ba FARDC bapotoli batomboki baye minduki ebele.

"Kino sik’oyo tokangi ba coommandos mitano, minduki AK 47 motoba, masasi 500 mpe bisaleli ya basoda biye bikokaki komonisa bango lokola baye ya mampinga ya FARDC bizwami na maboka na bango," elobi cap. Kasereka.

Molebeli ya mampinga ayebisi ete minei bazwamaki jeudi. Batomboki baye basalaki misala ya kobangisa to ya badongolomiso (actions terroristes) na Rwanda mpe bazalaki koyiba na mandoki na RDC, esakoli cap Kasereka.

"Moto ya mitano akangami, azali moko na bakambi. Azwamaki mposo misato mileki," elimboli cap. Kasereka.

Mposo mike mileki ba FARDC babomaki mokambi ya ba FDLR gén. Syvestre Mucumura na Rutshuru, na Nord-Kivu.

XS
SM
MD
LG