Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba civils 577 bakufi banda janvier na bitumba na Masisi (Ocha)


Ba soda ya Monusco bazali kobatela baye bazali kokima bitumba na Masisi, na Nord-Kivu, 11 avril 2019.
Ba soda ya Monusco bazali kobatela baye bazali kokima bitumba na Masisi, na Nord-Kivu, 11 avril 2019.

Ba civils 577 bakufi banda janvier na bitumba na territoire ya Masisi, na Nord-Kivu, elobi na rapport Bureau ya Nations unies ya coordination ya ba affaires humanitaires (Ocha).

Ocha eyebisi ete motango yango mozali kolakisa te bosolo ya makambo mazali koleka mikolo nyonso na Masisi.

Mpo na Ocha, pene na ba civils 1.600 bazalaki ba victimes ya bitumba biye banda mobu mobandaki.

Bitumba byango bizali kosalema kati na basimba mandoki ya ba groupes communautaires (ethniques) mpo na kowela mabele. Na ba groupes ethniques, ebakisami ba opérations to misala ya mampinga mpo na kobundisa basimba minduki.

Bowelani bozali kati na baye balonaka na baye babokolaka bibwele, ekundoli Ocha.

Bato mingi bakimi.

Kolanda Commission mouvements ya population ya etuka ya Nord-Kivu, pene na bato 221.730 bakima bisika na bango bazalaki na etando ya Masisi o’mokolo ya le 25 mai 2019. Kati na bango 45.500 (20%) bazali na ba sites 12 ya bakima bitumba ; 80% bawuti na ba sites esalama na mpwasa to mpe na mabota mandima kovandisa bango, .

Ocha eyebisi ete bozangi bokengi boye bomonisami na makombo ebele, lokola mbeba (abus) mpe mitungisi ya ba civils.

"Mpako ya lokuta, ba barrages ya kofuta bongo elandi mobeko te, bokangami ya bato mpamba mpama, ba enlèvements, kozuwa basi na makasi, kobebisa biloko ya bato mpe kompunza ndako ya bato yango nde mokumba ya mikolo minso ya bavandi bisika biye," elimboli Ocha.

XS
SM
MD
LG