Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Algérie elongi CAN 2019


Basani ya Algérie bazali kosepela na nkeni ya bilombe ya Afrika nsima na elonga 1-0 na finale liboso ya Sénégal, na Caire, Egypte, 19 juillet 2019.
Basani ya Algérie bazali kosepela na nkeni ya bilombe ya Afrika nsima na elonga 1-0 na finale liboso ya Sénégal, na Caire, Egypte, 19 juillet 2019.

Equipe nationale ya Algérie elongi CAN 2019 na kopolisa 1-0 na finale équipe ya Sénégal na Caire, na Egypte.

Ba Fennecs ya Algérie bavandisaki elonga na bango banda bitiyaki mongete na minute ya yambo na Baghdad Bounedjah.

Mongete yango mokamwisaki ba Lions to ba Nkosi ya Terranga ya Sénégal mpo ballon etutaki mopende ya défenseur yambo na koleka likolo ya moyambi ya Sénégal mpe kokita na poteau.

Banda wana ba lions bamekaki kosala makasi kasi Algérie eyebaki kobatela mongete yango.

Algérie elongi bongo mpo Coupe d'Afrique des nations ya mibale nsima ya mibu 29.

XS
SM
MD
LG