Fayulu na Dymanique basengi Tshisekedi na Kabila bayambola
Dynamique ya opposition, moko na mangomba ya Lamuka, eye emamaki nkombo ya Martin Fayulu na maponami ya le 30 décembre eleki, ebongoli nkombo na yango, ekomi ekomi Dynamique mpo na bosolo na maponami. Esilisaki lobi loleki convention to bokutani na yango ya minei. VOA Lingala epesaki maloba na molobeli ya Convention yango, Jean-Claude Mwalimu.